5 Osengeli te kogumbamela yango to kobendama mpo na kosalela yango,+ mpamba te ngai Yehova Nzambe na yo, nazali Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye,+ nayeisaka etumbu mpo na libunga ya batata likoló ya bana, likoló ya libota ya misato mpe likoló ya libota ya minei ya baoyo bayinaka ngai;+
7 abatelaka motema boboto mpo na bankóto,+ alimbisaka libunga ná kobuka mibeko mpe lisumu,+ kasi akozanga ata moke te kopesa etumbu,+ mpe mpo na libunga ya batata, ayeiselaka bana etumbu mpe bana ya bana, libota ya misato mpe libota ya minei.”+