Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 6:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Na nsima, Yosua alapisaki bato ndai na eleko wana ete: “Moto oyo akotɛlɛma mpe akotonga engumba oyo, Yeriko, alakelama mabe liboso ya Yehova. Ntango akotya moboko na yango, mwana na ye ya liboso akufa, mpe ntango akotɛlɛmisa baporte na yango, mwana na ye ya nsuka akufa.”+

  • Yosua 23:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “Sikoyo, talá! Nazali lelo kokende na nzela ya bato nyonso,+ mpe boyebi malamu na mitema na bino nyonso mpe na milimo na bino nyonso ete na maloba nyonso ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino, ata liloba moko te ezangaki kokokisama. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino. Ata liloba moko te ezangaki kokokisama.+

  • Zekaria 1:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Nzokande, na oyo etali maloba na ngai mpe malako na ngai oyo napesaki mitindo na basaleli na ngai, basakoli,+ yango ekómelaki nde batata na bino te?’+ Yango wana, babongwanaki mpe balobaki ete: ‘Oyo Yehova ya mampinga akanisaki kosalela biso,+ na kolanda banzela na biso mpe misala na biso, yango nde asalelaki biso.’”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto