Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 32:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Bótala sikoyo ete ngai—ngai nde ye+

      Mpe banzambe mosusu bazali elongo na ngai te.+

      Nabomaka, mpe nabikisaka.+

      Nazokisaki makasi,+ mpe ngai—nakobikisa,+

      Mpe ezali na moto te oyo akobɔtɔla na lobɔkɔ na ngai.+

  • 1 Samwele 2:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Yehova abomaka mpe abatelaka na bomoi,+

      Akitisaka na Nkunda,*+ mpe abimisaka.+

  • 2 Bakonzi 4:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Nsukansuka, amataki mpe alalelaki mwana+ mpe atyaki monɔkɔ na ye na monɔkɔ ya mwana mpe miso na ye na miso ya mwana mpe mabɔkɔ na ye na mabɔkɔ ya mwana, agunzami likoló na ye, mpe mokemoke nzoto ya mwana ekómaki mɔtɔ.

  • 2 Bakonzi 13:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe esalemaki boye: ntango bazalaki kokunda moto moko, Ee talá, bamonaki etuluku ya bapunzi. Na mbala moko, babwakaki moto yango na kati ya lilita ya Elisha mpe bakendaki. Ntango moto yango atutaki mikuwa ya Elisha, na mbala moko, azongaki na bomoi+ mpe atɛlɛmaki na makolo na ye.+

  • Luka 7:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe mokufi afandaki mpe abandaki koloba, mpe apesaki ye mama na ye.+

  • Luka 8:55
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 55 Mpe elimo+ na ye ezongaki, mpe atɛlɛmaki+ na ntango wana kaka, mpe atindaki bápesa ye mwa eloko ya kolya.+

  • Yoane 5:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Bókamwa te mpo na yango, mpamba te ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita*+ bakoyoka mongongo na ye

  • Yoane 11:44
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 Moto oyo akufaki abimaki, makolo ná mabɔkɔ ekangami na bilamba ya kozinga,+ mpe elongi na ye ekangami na elamba. Yesu alobaki na bango ete: “Bófungola ye mpe bótika ye akende.”

  • Misala 9:41
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 41 Petro apesaki ye lobɔkɔ, atɛlɛmisaki ye,+ mpe abengaki basantu ná basi wana oyo mibali bakufá, mpe alakisaki bango ye na bomoi.+

  • Misala 20:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kasi Paulo akitaki na nse, amibwakaki likoló na ye+ mpe azingaki ye na mabɔkɔ mpe alobaki ete: “Bótika kobimisa makɛlɛlɛ, mpo molimo na ye ezali na kati na ye.”+

  • Baroma 14:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpo Kristo akufaki mpe azongaki na bomoi mpo na yango,+ mpo azala Nkolo ya bakufi+ mpe ya bato ya bomoi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto