41 Mpe bikólo yango bakómaki kobanga Yehova,+ kasi bazalaki kosalela nde bikeko na bango oyo eyemami. Tii na mokolo ya lelo, bana na bango mpe bana ya bana na bango bazali kosala kaka ndenge bankɔkɔ na bango basalaki.
11 Ekólo moko esilá kutu kotya baoyo bazali banzambe te+ na esika ya banzambe na yango?+ Kasi bato na ngai batye eloko oyo ekoki kopesa litomba te na esika ya nkembo na ngai.+
14 Bókangana te na ekanganeli ya mabe esika moko na bato oyo bazali bandimi te.+ Mpo boninga nini ezali na kati ya boyengebene mpe kobuka mibeko?+ To pole ná molili esanganaka na nini?+