Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 115:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Ezali na monɔkɔ, kasi elobaka te;+

      Ezali na miso, kasi emonaka te;+

  • Nzembo 135:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Ezali na monɔkɔ, kasi ekoki koloba te;+

      Ezali na miso, kasi ekoki komona te;+

  • Yisaya 44:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Bayebi naino te,+ bazali mpe kokanga ntina te,+ mpo miso na bango epakolami eloko mpo bámona te,+ mitema na bango mpe, mpo bázala na mayele ya kososola te.+

  • Yisaya 45:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “Bóyangana mpe bóya.+ Bino bato oyo bobiki na bikólo, bóbɛlɛma elongo.+ Baoyo bazali kokumba ekeko na bango ya nzete oyo eyemami, bazwi boyebi te, ezala mpe baoyo bazali kobondela nzambe oyo akoki kobikisa te.+

  • Yirimia 10:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Ezali lokola dɔngɔlɔmiso ya elanga ya kɔkɔmbrɛ, mpe ekoki koloba te.+ Bazali komema yango mpenza, mpo ekoki kotambola ata moke te.+ Bóbanga yango te, ekoki kosala likambo ata moko te oyo ezali komema mpasi mpe, lisusu, ekoki kosala likambo moko te ya malamu.”+

  • Danyele 5:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Kasi omitombolaki mpo na kotɛmɛla Nkolo ya likoló,+ mpe bamemaki liboso na yo bambɛki ya ndako na ye;+ mpe yo moko ná bato minene na yo, bamakango na yo ná basi na yo mosusu bozali komɛla na yango, mpe bosanzoli banzambe ya palata mpe ya wolo, ya motako, ya ebende, ya nzete mpe ya libanga,+ oyo emonaka te mpe eyokaka te mpe eyebaka eloko moko te;+ kasi Nzambe oyo mpema na yo ezali na lobɔkɔ na ye+ mpe oyo banzela na yo nyonso ezali ya ye,+ okumisi ye te.+

  • Habakuku 2:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Ekeko oyo eyemami ezali na litomba nini,+ wana mosali na yango ayemi yango, abimisi ekeko ya ebende oyo enyagwisami, mpe molakisi ya lokuta?+ Wana mosali na yango atyeli yango motema+ kino asali banzambe ya mpambampamba oyo balobaka te?+

  • 1 Bakorinti 8:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Sikoyo, mpo na likambo oyo etali kolya+ bilei oyo epesami na bikeko, toyebi ete ekeko ezali eloko te+ na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka moko.+

  • 1 Bakorinti 10:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Na yango, naloba nini? Ete oyo epesami mbeka na ekeko ezali eloko, to mpe ekeko ezali eloko?+

  • 1 Bakorinti 12:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Boyebi ete ntango bozalaki bato ya bikólo,+ bozalaki kotika bámema bino epai ya bikeko+ oyo elobaka te,+ ndenge kaka bozalaki komemama.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto