41 Mpe okopesa mwana-mpate ya mobali ya mibale na mpokwa, liboso molili ekɔta. Okopesa yango ná likabo ya mbuma+ lokola oyo ya ntɔngɔ mpe ná likabo ya masanga lokola oyo wana, mpo ezala nsolo moko ya kokitisa motema, likabo moko oyo etumbami na mɔtɔ mpo na Yehova.