24 Mpe Yehova abimelaki ye na butu yango mpe alobaki ete: “Nazali Nzambe ya Abrahama tata na yo.+ Kobanga te,+ mpamba te nazali elongo na yo, mpe nakopambola yo mpe nakosala ete momboto na yo ezala mingi mpo na Abrahama mosaleli na ngai.”+
7 Ee Nzambe na biso,+ yo moko obenganaki bato oyo bafandaki na mokili oyo liboso ya bato na yo Yisraele+ mpe na nsima opesaki+ yango na momboto ya Abrahama, moto oyo azalaki kolinga yo,+ mpo na ntango oyo etyami ndelo te, boye te?