Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 2:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na nsima, Farao ayokaki likambo yango, mpe alukaki koboma Moize;+ kasi Moize akimaki mosika+ na Farao mpo na kofanda na mokili ya Midiane;+ mpe afandaki pembeni ya libulu moko ya mai.

  • 1 Samwele 27:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Nzokande, Davidi alobaki na motema na ye ete: “Sikoyo, lobɔkɔ ya Saulo ekoboma ngai mokolo mosusu. Likambo mosusu ya kosala ezali te, malamu nakima+ na mokili ya Bafilistia;+ mpe Saulo akolɛmba koluka ngai na teritware mobimba ya Yisraele,+ mpe ya solo, nakobika na lobɔkɔ na ye.”

  • Masese 16:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Nkɛlɛ ya mokonzi nde bamemi-nsango ya liwa,+ kasi moto ya bwanya nde ye oyo akitisaka yango.+

  • Masese 22:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi,+ kasi bato oyo bazangi boyebi baleki kaka mpe basengeli kozwa mpasi.+

  • Matai 10:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Ntango bakonyokola bino na engumba moko, bókima na engumba mosusu;+ mpo ya solo mpenza nalobi na bino ete: Bokosilisa koleka+ na bingumba nyonso ya Yisraele te liboso Mwana ya moto aya.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto