Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 20:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Osengeli te kogumbamela yango to kobendama mpo na kosalela yango,+ mpamba te ngai Yehova Nzambe na yo, nazali Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye,+ nayeisaka etumbu mpo na libunga ya batata likoló ya bana, likoló ya libota ya misato mpe likoló ya libota ya minei ya baoyo bayinaka ngai;+

  • Mitángo 25:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Finehase+ mwana ya Eleazare mwana ya Arona nganga-nzambe alongoli nkɛlɛ+ na ngai likoló ya bana ya Yisraele na ndenge atiki nzela ata moke te básalela ngai bombanda na kati na bango,+ yango wana nasilisi bana ya Yisraele nyɛɛ te mpo ngai nasɛngaka bato bákangama kaka na ngai.+

  • 2 Bakonzi 10:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Bongo alobaki boye: “Yaká elongo na ngai mpe omona ete nandimaka ata moke te básalela Yehova bombanda.”+ Mpe bazwaki ye atambola elongo na ye na kati ya likalo na ye ya etumba.

  • Nzembo 69:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Mpo molende mpo na ndako na yo elei ngai,+

      Mpe kosambwisa ya bato oyo bazali kosambwisa yo ekweli ngai.+

  • Nzembo 119:139
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 139 Molende na ngai ebomi ngai,+

      Mpo banguna na ngai babosani maloba na yo.+

  • 2 Bakorinti 11:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpo nazali koyokela bino zuwa, zuwa oyo eyokani na mokano ya Nzambe,+ mpo ngai mpenza nalakaki kobalisa bino+ na mobali+ kaka moko, mpo nabimisa bino lokola ngɔndɔ moko ya pɛto+ epai ya Kristo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto