Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 9:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Mpe Yehu abendaki litimbo+ na makasi na ye nyonso mpe abɛtaki Yehorame na mokɔngɔ, na katikati ya mapeka, bongo likula yango ebimaki na motema na ye, mpe akweaki na kati ya likalo na ye ya etumba.+

  • 2 Bakonzi 10:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo akomelaki bango mokanda ya mibale mpe alobaki: “Soki bozali bato na ngai,+ mpe bozali kotosa mongongo na ngai, bózwa mitó ya bato oyo bazali bana+ ya nkolo na bino mpe bóya lobi epai na ngai na ntango oyo, na Yizireele.”+

      Nzokande, bana ya mokonzi, mibali ntuku nsambo (70), bazalaki elongo na bato minene ya engumba oyo bazalaki kobɔkɔla bango.

  • 2 Bakonzi 10:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpe esalemaki boye: ntango kaka asilisaki kopesa likabo ya kotumba, na mbala moko, Yehu alobaki boye na bapoti-mbangu mpe na bakomanda oyo basalisaka ye: “Bókɔta, bóboma bango! Bótika ata moko te abima.”+ Mpe bapoti-mbangu ná bakomanda yango+ babandaki koboma bango na mopanga mpe kobwaka bango libándá, mpe bakendaki tii na engumba ya ndako ya Baala.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto