Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 3:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe Moize akómaki mobateli ya mpate ya Yetro,+ nganga-nzambe ya Midiane, oyo Moize azalaki bokilo na ye.+ Wana azalaki komema etonga na ngámbo ya wɛsti ya esobe, nsukansuka akómaki na ngomba ya Nzambe ya solo,+ na Horebe.+

  • Basambisi 6:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Na nsima, anzelu ya Yehova ayaki+ mpe afandaki na nse ya nzete monene oyo ezalaki na Ofra, oyo ezalaki ya Yoashe, Moabi-ezere,+ wana mwana na ye Gideone+ azalaki kotuta blé na ekamwelo ya vinyo mpo na kobomba yango nokinoki mpo Midiane amona yango te.

  • 2 Samwele 7:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Bongo sikoyo, talá oyo okoloba na mosaleli na ngai Davidi: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Ngai nde nazwaki yo na esika ya koleisa banyama matiti, otika kobatela etonga+ mpo okóma mokambi+ ya bato na ngai Yisraele.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto