17 “Osengeli te kolula ndako ya moninga na yo. Osengeli te kolula mwasi ya moninga na yo,+ ezala moombo na ye ya mobali, ezala moombo na ye ya mwasi, ezala ngɔmbɛ na ye ya mobali, ezala mpunda na ye, ezala eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo.”+
21 “‘Osengeli mpe te kolula mwasi ya moninga na yo.+ Osengeli mpe te kozala na mposa ya lokoso mpo na ndako ya moninga na yo, elanga na ye to moombo na ye ya mobali to moombo na ye ya mwasi, ngɔmbɛ na ye to mpunda na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo.’+
15 Bongo alobaki na bango ete: “Bófungola miso na bino mpe bókeba na motindo nyonso ya bilulela,+ mpo ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.”+