11 Moto ya Yeroboame oyo akokufa na kati ya engumba, bambwa ekolya ye;+ mpe moto oyo akokufa na esobe, bandɛkɛ ya likoló ekolya ye,+ mpo Yehova ye moko alobi yango.”’
3 “‘Mpe nakotyela bango mitindo minei ya makambo,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘mopanga mpo na koboma, bambwa mpo na kobenda, bikelamu oyo epumbwaka na likoló+ ná banyama ya mabele mpo na kolya mpe kobebisa.
18 mpo bólya misuni+ ya bakonzi mpe misuni ya bakomanda ya basoda mpe misuni ya bato ya makasi+ mpe misuni ya bampunda+ mpe ya baoyo bafandi likoló na yango, mpe misuni ya bato nyonso, ya bato ya bonsomi mpe ya baombo mpe ya bato mike mpe ya bato minene.”