Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 12:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Kasi na esika oyo Yehova akopona na moko ya mabota na yo nde epai okopesa makabo na yo ya kotumba, mpe kuna nde okosalela mitindo nyonso oyo nazali kopesa yo.+

  • 1 Bakonzi 14:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Bango mpe bazalaki se komitongela bisika oyo etombwaná,+ makonzí ya losambo+ ná nzete ya losambo,+ na ngomba moke nyonso oyo etombwaná+ mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa.+

  • 1 Bakonzi 15:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Nde bisika oyo etombwaná,+ alongolaki yango te.+ Atako bongo, motema ya Asa ezalaki mobimba epai ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na ye.+

  • 2 Bakonzi 12:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Kaka bisika oyo etombwaná nde elimwaki te.+ Bato bazalaki se kopesa mbeka mpe kobimisa milinga ya mbeka na bisika oyo etombwaná.

  • 2 Bakonzi 14:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Kasi bisika oyo etombwaná elimwaki te.+ Bato bazalaki se kopesa mbeka mpe kobimisa milinga ya mbeka na bisika oyo etombwaná.+

  • 2 Bakonzi 15:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Kasi bisika oyo etombwaná elimwaki te.+ Bato bazalaki se kopesa mbeka mpe kobimisa milinga ya mbeka na bisika oyo etombwaná.+

  • 2 Bakonzi 18:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpe soki bolobi na ngai ete: ‘Totye motema+ nde na Yehova+ Nzambe na biso,’ bongo bisika oyo etombwaná+ mpe bitumbelo oyo Hizikiya+ alongoli ezali ya ye te, awa alobi na Yuda mpe na Yerusaleme ete: ‘Bokogumbama liboso ya etumbelo oyo na Yerusaleme’?”’+

  • 2 Ntango 20:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Kasi bisika oyo etombwaná+ elimwaki te; mpe bato babongisaki naino mitema na bango mpo na Nzambe ya bankɔkɔ na bango te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto