35 Mpe nakomibimisela mpenza nganga-nzambe moko ya sembo.+ Akosala na boyokani na oyo ezali na motema na ngai mpe na molimo na ngai; mpe nakotongela ye mpenza ndako oyo ekoumela, mpe akotambola libela liboso ya moto na ngai oyo atyami mafuta.+
3 Mpe Davidi, ná Zadoke+ moko ya bana ya Eleazare, mpe Ahimeleke+ moko ya bana ya Itamare, bakabolaki bango na bituluku mpo na mokumba na bango na mosala na bango.+