8 Talá nkombo ya bilombe+ mibali ya Davidi: Yoshebe-bashebete+ Motakemoni, mokonzi ya bato yango misato. Azalaki kobwakela bato nkama mwambe (800) likɔnga na ye mpe babomami na mbala moko.
10 Talá sikoyo bakonzi ya mibali ya nguya+ ya Davidi, baoyo bakangamaki na ye makasi na bokonzi na ye elongo na Yisraele mobimba, mpo na kokómisa ye mokonzi, ndenge Yehova alobaki+ mpo na Yisraele.