Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 17:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Kasi asengeli te komibakisela bampunda mingi,+ mpe asengeli te kozongisa bato na Ezipito mpo na kobakisa bampunda mingi;+ mpo Yehova alobi na bino ete: ‘Bosengeli ata moke te kozonga lisusu na nzela oyo.’

  • 2 Samwele 8:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Bongo Davidi akangaki basoda na ye nkóto moko na nkama nsambo (1 700) oyo batambolaka na mpunda mpe basoda nkóto ntuku mibale (20 000) oyo batambolaka na makolo;+ mpe Davidi akataki misisa ya nsima ya mabɔlɔngɔ ya makolo ya nsima+ ya bampunda nyonso ya makalo,+ kasi atikaki kati na yango bampunda nkama moko (100) ya makalo.

  • 1 Bakonzi 10:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpe bazalaki komema moto na moto likabo+ na ye: biloko ya palata+ ná biloko ya wolo, bilamba, bibundeli,+ mafuta ya balsame, bampunda ná badɔngi;+ bazalaki kosala bongo mbula na mbula.+

  • 2 Ntango 1:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe mbala na mbala, bazalaki koya na likalo moko, oyo bazalaki kobimisa na Ezipito na ntalo ya shekele ya palata nkama motoba (600), mpe mpunda moko na ntalo ya nkama moko na ntuku mitano (150); mpe ezalaki bongo mpo na bakonzi nyonso ya Bahiti mpe bakonzi ya Siri.+ Bazalaki kobimisa yango na nzela na bango.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto