10Bongo mokonzi-mwasi ya Sheba+ ayokaki nsango ya Salomo oyo ezalaki kokumisa nkombo ya Yehova.+ Na yango, ayaki mpo na komeka ye na mituna ya makasimakasi.+
7 Kasi nandimaki maloba yango te kino nayei komona na miso na ngai moko; mpe talá! oyo bayebisaki ngai ekómi ata na katikati te.+ Bwanya na yo mpe bozwi na yo eleki mpenza makambo oyo nayoká na matoi na ngai.+