22 Mpe bosengeli kokamata liboke ya nzete ya izope+ mpe kozindisa yango na makila oyo ezali na saani mpe kopakola yango na libaya ya likoló oyo esimbaka makonzí ya porte mpe na makonzí mibale ya porte; mpe moto moko te kati na bino akobima na monɔkɔ ya ndako na ye tii na ntɔngɔ.
18 Na nsima, moto oyo azali pɛto+ asengeli kozwa nzete ya izope+ mpe kozindisa yango na mai mpe komwangisa yango likoló ya hema mpe likoló ya bambɛki nyonso mpe likoló ya milimo nyonso oyo bazalaki kuna mpe likoló ya moto oyo asimbaki mokuwa to moto oyo babomi to ebembe to lilita.
19 Mpo ntango Moize ayebisaki bato nyonso mitindo nyonso na kolanda Mibeko,+ azwaki makila ya bana-ngɔmbɛ ya mibali mpe ya bantaba ná mai ná lɛnɛ ya motane makasi ná nzete ya izope+ mpe amwangiselaki yango buku wana ná bato nyonso,