20 Mpe bakeruba yango esengeli kosembola mapapu mibale na yango epai ya likoló, mpo na kozipa ezipeli na mapapu na yango, wana bilongi na yango ezali kotalana.+ Bilongi ya bakeruba esengeli kotala ezipeli.
8 Na yango, bakeruba yango esembolaki ntango nyonso mapapu na yango likoló ya esika ya Sanduku, bongo bakeruba yango ezipaki Sanduku ná banzete ya komema yango,+ na likoló.+