Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 10:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe nkembo ya Yehova+ ebandaki kolongwa epai ya bakeruba mpo na kokende na monɔkɔ ya ndako, mpe nsukansuka ndako etondaki na lipata,+ mpe lopango etondaki na kongɛnga ya nkembo ya Yehova.

  • Ezekiele 43:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe nkembo+ ya Yehova ekɔtaki na Ndako na nzela ya porte oyo liboso na yango etali na ngámbo ya ɛsti.+

  • Misala 7:55
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 55 Kasi ye, lokola atondaki na elimo santu, atalaki likoló mpe amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atɛlɛmi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe,+

  • 2 Bakorinti 3:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe biso nyonso,+ na bilongi oyo ezipwami, lokola talatala, tozali kongɛngisa nkembo ya Yehova,+ tozali kobongwana+ mpo na kokóma na motindo ya elilingi wana moko,+ uta na nkembo tii na nkembo,+ ndenge mpenza Yehova, oyo azali Elimo, azali kosala.+

  • Emoniseli 21:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe engumba yango ezali na mposa ya moi te mpe ya sanza te mpo na kongɛngisa yango, mpo nkembo ya Nzambe ezalaki kopesa yango pole,+ mpe mwinda na yango Mwana-Mpate.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto