7 abatelaka motema boboto mpo na bankóto,+ alimbisaka libunga ná kobuka mibeko mpe lisumu,+ kasi akozanga ata moke te kopesa etumbu,+ mpe mpo na libunga ya batata, ayeiselaka bana etumbu mpe bana ya bana, libota ya misato mpe libota ya minei.”+
14 mpe bato na ngai,+ oyo babengami na nkombo na ngai+ bamikitisi+ mpe babondeli+ mpe baluki elongi na ngai+ mpe babongwani, batiki banzela na bango ya mabe,+ ngai nakoyoka na likoló+ mpe nakolimbisa lisumu na bango,+ mpe nakobikisa mokili na bango.+
19 Ee Yehova, yoká.+ Ee Yehova, limbisá.+ Ee Yehova, tyá likebi mpe salá.+ Koumela te,+ mpo na yo moko, Ee Nzambe na ngai, mpo nkombo na yo ebengami na engumba na yo mpe na bato na yo.”+