-
Mitángo 9:14Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
14 “‘Mpe soki mopaya afandi mopaya elongo na bino, ye mpe asengeli kobongisa mbeka ya elekeli mpo na Yehova.+ Na kolanda mobeko ya elekeli mpe na kolanda ndenge oyo basalaka yango, ndenge wana nde akosala.+ Mobeko ekozala kaka moko mpo na bino, mpo na moto oyo afandi mopaya mpe mpo na mwana-mboka ya mokili yango.’”+
-
-
2 Bakonzi 5:15Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
15 Na nsima, azongaki epai ya moto ya Nzambe ya solo,+ ye ná kaa na ye mobimba, mpe ayaki mpe atɛlɛmaki liboso na ye mpe alobaki: “Talá, sikoyo, nayebi mpenza ete Nzambe azali na esika mosusu te na mabele, kaka na Yisraele.+ Mpe sikoyo, nabondeli yo, ndimá likabo ya lipamboli+ oyo euti na mosaleli na yo.”
-