Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 28:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Yehova akotambwisa yo+ ná mokonzi+ na yo oyo okotya likoló na yo mpo na kokende na ekólo oyo oyebi te, ezala yo mpe bankɔkɔ na yo; mpe kuna okosalela mpenza banzambe mosusu, ya nzete mpe ya mabanga.+

  • 2 Bakonzi 17:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na mbula ya libwa ya Hoshea, mokonzi ya Asiri azwaki Samaria+ mpe na nsima, amemaki Yisraele na mboka mopaya+ na Asiri mpe afandisaki bango na Hala+ mpe na Habore, pene na ebale Gozane+ mpe na bingumba ya Bamede.+

  • 2 Bakonzi 25:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe mokonzi ya Babilone abɛtaki+ bango mpe abomaki bango na Ribla, na mokili ya Hamate.+ Ndenge wana nde Yuda elongwaki na mabele na yango ekei mboka mopaya.+

  • Danyele 9:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Ee Yehova, boyengebene ezali ya yo, kasi biso, bilongi na biso nde etondi na nsɔni lokola na mokolo ya lelo,+ bato ya Yuda mpe bato oyo bafandi na Yerusaleme mpe bato nyonso ya Yisraele, baoyo bazali pene mpe baoyo bazali mosika na mikili nyonso esika opanzá bango mpo basalelaki yo makambo na bosembo te.+

  • Luka 21:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 mpe bakokwea na mopanga mpe bakomema bango bakangami na bikólo nyonso;+ mpe Yerusaleme ekonyatama na bikólo, tii bantango oyo etyamá+ ya bikólo ekokoka.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto