Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 41:43
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 43 Lisusu, amatisaki ye na likalo ya mibale ya lokumu oyo azalaki na yango,+ mpo bábelela liboso na ye ete: “Avreke!” Boye atyaki ye likoló ya mokili mobimba ya Ezipito.

  • 1 Bakonzi 1:38
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 38 Bongo nganga-nzambe Zadoke+ mpe mosakoli Natane+ ná Benaya+ mwana ya Yehoyada mpe Bakerete+ ná Bapelete+ bakitaki mpe bamatisaki Salomo na mpunda ya mwasi, oyo ezalaki ya Mokonzi Davidi,+ mpe na nsima, bakendaki na ye na Gihone.+

  • Estere 6:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 báya na molato ya bokonzi+ oyo mokonzi ye moko alataka mpe mpunda oyo mokonzi amataka na yango+ mpe oyo na motó na yango batye motole ya bokonzi.

  • Zekaria 9:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “Ee mwana mwasi ya Siona, zalá na esengo mingi.+ Ee mwana mwasi ya Yerusaleme, gangá na koganga ya bolongi.+ Talá! Mokonzi na yo+ azali koya epai na yo.+ Azali moyengebene, ɛɛ, abikisami;+ moto ya komikitisa,+ mpe amati likoló ya mpunda,* ɛɛ likoló ya nyama oyo ekɔmɛli, mwana ya mpunda ya mwasi.+

  • Luka 19:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Mpe bamemaki yango epai ya Yesu, mpe babwakaki likoló ya mwana ya mpunda yango bilamba na bango ya likoló mpe bafandisaki Yesu likoló na yango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto