10Na nsima, Samwele azwaki molangi+ ya mafuta mpe asopaki yango na motó na ye mpe apwɛpwaki+ ye mpe alobaki ete: “Oyo emonisi solo te ete Yehova atye yo mafuta ete okóma mokambi+ ya libula na ye?+
13 Na yango, Samwele azwaki liseke ya mafuta+ mpe atyaki ye mafuta na katikati ya bandeko na ye. Mpe elimo ya Yehova ebandaki kosala kati na Davidi banda mokolo wana.+ Na nsima, Samwele atɛlɛmaki mpe asimbaki nzela, akei na Rama.+
3 Zwá molangi yango ya mafuta, sopá yango na motó na ye+ mpe lobá boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Natye yo mafuta+ ozala mokonzi+ ya Yisraele.”’ Na nsima fungolá porte mpe kimá, kozela te.”