10 Mpe eloko nyonso oyo miso na ngai esɛngaki, naboyelaki yango te.+ Napimelaki motema na ngai ata esengo moko te, mpo motema na ngai esepelaki na mosala na ngai nyonso ya makasi,+ mpe yango ekómaki mbano na ngai oyo euti na mosala na ngai nyonso ya makasi.+