2 Mpe atongaki Ndako ya Zamba ya Libá;+ ezalaki na bolai ya mapeko nkama moko (100), mpe na bonene ya mapeko ntuku mitano (50), mpe na bosanda ya mapeko ntuku misato (30), efandaki likoló ya milɔngɔ minei ya makonzí ya sɛdrɛ; mpe ezalaki na mabaya minene+ ya sɛdrɛ likoló ya makonzí yango.