Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 26:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Mpe nakosilisa mpenza nyɛɛ bisika na bino oyo etombwaná ya losambo,+ mpe nakolongola bitumbelo na bino ya mpaka ya malasi mpe nakolalisa bibembe na bino mpenza likoló ya bibembe ya bikeko na bino ya bosɔtɔ;*+ mpe molimo na ngai ekoyina mpenza bino.+

  • Mitángo 33:52
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 52 Mpe bosengeli kobengana bato nyonso oyo bafandi na mokili liboso na bino mpe kobebisa bililingi+ nyonso na bango ya mabanga, mpe bokobebisa bikeko nyonso na bango ya ebende oyo enyangwisami,+ mpe bokosilisa nyɛɛ bisika nyonso na bango oyo etombwaná ya losambo.+

  • 1 Bakonzi 3:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Nde bato bazalaki kopesa mbeka na bisika oyo etombwaná,+ mpo tii na mikolo wana, batongelaki naino nkombo ya Yehova ndako moko te.+

  • 2 Bakonzi 14:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Kasi bisika oyo etombwaná elimwaki te.+ Bato bazalaki se kopesa mbeka mpe kobimisa milinga ya mbeka na bisika oyo etombwaná.+

  • Nzembo 78:58
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 58 Mpe bazalaki kaka kosilikisa ye na bisika na bango oyo etombwaná,+

      Mpe bazalaki kaka koyokisa ye zuwa na bikeko na bango oyo eyemami.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto