Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 20:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Kasi mokonzi ya Yisraele ayanolaki mpe alobaki ete: “Bino, bóloba na ye boye: ‘Moto oyo azali kokanga mokaba+ na loketo amikumisa te lokola moto oyo azali kofungola yango.’”+

  • 2 Ntango 32:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Bongo sikoyo, Hizikiya akosa bino te+ to azimbisa+ bino boye te mpe bóndimela ye te, mpo ata nzambe ya ekólo moko te to ya bokonzi moko te akokaki kobikisa bato na ye na lobɔkɔ na ngai mpe na lobɔkɔ ya bankɔkɔ na ngai. Bongo ekobanda boni Nzambe na bino abikisa bino na lobɔkɔ na ngai!’”+

  • Danyele 3:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Sikoyo, soki bomibongisi mpo bókwea mpe bósambela ekeko oyo nasali, ntango bokoyoka lokito ya liseke, ya piololo, ya sitare, ya nzɛnzɛ ya bansɔngɛ misato, ya ebɛtɛlo ya bansinga, ya kornemize mpe ya ndenge nyonso ya bibɛtɛlo ya miziki,+ wana malamu. Kasi soki bosambeli te, kaka na ntango wana, bokobwakama na litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kopela. Bongo nzambe yango nani oyo akoki kobikisa bino na mabɔkɔ na ngai?”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto