3 Mpe asengeli koloba na bango ete: ‘Yoká, Ee Yisraele, bozali kobɛlɛma lelo na etumba mpo na kobunda na banguna na bino. Mitema na bino ebangabanga te.+ Bóbanga te mpe bókima na nsɔmɔ te mpe bólɛnga mpo na bango te,+
10 Kobanga te, mpo nazali na yo.+ Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo.+ Nakopesa yo makasi.+ Nakosalisa yo mpenza.+ Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali+ ya boyengebene.’+
7 “Bóyoka ngai, bino baoyo boyebi boyengebene, bato oyo mobeko na ngai ezali na motema na bango.+ Nsɔni ya bato—bawei mpamba—bóbanga yango te, mpe bózala na nsɔmɔ te mpo na maloba na bango ya kofinga.+