22 Mpe nakomilakisa liboso na yo kuna mpe nakosolola na yo uta na likoló ya ezipeli,+ uta na kati ya bakeruba mibale oyo bazali likoló ya sanduku ya litatoli, ɛɛ mpo na koyebisa nyonso oyo nakopesa yo etinda mpo na bana ya Yisraele.+
2 Mpe Yehova alobaki na Moize boye: “Lobá na Arona ndeko na yo ete akɔtaka ntango nyonso te na esika mosantu+ na nsima ya rido,+ liboso ya ezipeli oyo ezali likoló ya Sanduku, mpo akufa te;+ mpo nakomonana na lipata+ likoló ya ezipeli.+
4 Na yango, bato ya etumba batindaki bato na Shilo mpe kuna, bazwaki sanduku ya kondimana ya Yehova ya mampinga, oyo afandi likoló ya bakeruba.+ Mpe bana mibali mibale ya Eli, elingi koloba: Hofini ná Finehase,+ bazalaki wana ná sanduku ya kondimana ya Nzambe ya solo.