Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Bileli 1:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Bato na ngai nyonso ya nguya, Yehova abwaki bango mosika na ngai.+

      Abengiseli ngai likita, mpo na kobukabuka bilenge na ngai ya mibali.+

      Yehova anyatinyati ekamwelo ya vinyo+ ya ngɔndɔ, mwana mwasi ya Yuda.+

  • Bileli 2:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Nakozwa yo motatoli na likambo nini? Nakokokanisa yo na eloko nini, Ee mwana mwasi ya Yerusaleme?+

      Nakómisa yo ndenge moko na nini, mpo nabɔndisa yo, Ee ngɔndɔ, mwana mwasi ya Siona?+

      Mpo kokwea+ na yo ezali monene lokola mbu. Nani akoki komemela yo lobiko?+

  • Mika 4:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “Mpe mpo na yo, Ee ndako molai ya etonga, libondo ya mabele ya mwana mwasi ya Siona,+ yango ekoya tii epai na yo, ɛɛ, boyangeli ya liboso ekoya mpenza,+ bokonzi ezali ya mwana mwasi ya Yerusaleme.+

  • Zekaria 9:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “Ee mwana mwasi ya Siona, zalá na esengo mingi.+ Ee mwana mwasi ya Yerusaleme, gangá na koganga ya bolongi.+ Talá! Mokonzi na yo+ azali koya epai na yo.+ Azali moyengebene, ɛɛ, abikisami;+ moto ya komikitisa,+ mpe amati likoló ya mpunda,* ɛɛ likoló ya nyama oyo ekɔmɛli, mwana ya mpunda ya mwasi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto