2 Na yango, Davidi alobaki ete: “Nakomonisela Hanune mwana ya Nahashe motema boboto kaka ndenge tata na ye amoniselaki ngai motema boboto.”+ Bongo Davidi atindaki basaleli na ye+ mpo na kobɔndisa ye mpo na liwa ya tata na ye, mpe basaleli ya Davidi bakómaki na mokili ya bana ya Amone.