Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 28:48
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 48 Mpe banguna na yo oyo Yehova akotindela yo, okosalela bango+ mpenza na nzala+ mpe na mposa ya mai mpe na bolumbu mpe na mposa ya eloko nyonso; mpe akotya mpenza ekanganeli ya ebende na nkingo na yo kino akosilisa yo.+

  • Kolimbola Mibeko 29:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 “Mpe libota oyo ekoya, bana na bino oyo bakobima nsima na bino, bakozanga te koloba, mpe mopaya oyo akouta na mokili moko ya mosika, ɛɛ ntango bakomona malɔzi ya mokili yango mpe bamaladi na yango, oyo Yehova akobɛlisa yango,+

  • 2 Bakonzi 24:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Nsukansuka, Yehoyakine mokonzi ya Yuda abimaki epai ya mokonzi ya Babilone,+ ye ná mama na ye,+ ná basaleli na ye, bankumu na ye ná bakapita ya ndako na ye; mpe mokonzi ya Babilone azwaki ye na mbula ya mwambe+ banda akómaki mokonzi.

  • 2 Bakonzi 25:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na nsima, bakangaki mokonzi+ mpe bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babilone, na Ribla,+ mpo bákata likambo na ye.

  • 2 Ntango 33:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Nsukansuka, Yehova amemelaki bango+ bakonzi ya limpinga ya mokonzi ya Asiri,+ bongo bazwaki Manase na mabulu,+ mpe bakangaki+ ye na bikangeli mibale ya motako mpe bamemaki ye na Babilone.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto