40 Mpe bakoyambola mpenza libunga na bango+ mpe libunga ya batata na bango na kati ya kozanga bosembo na bango ntango bazangaki bosembo epai na ngai, ɛɛ, ntango batɛmɛlaki ngai na etamboli na bango.+
29 “Omoni ndenge Ahaba amikitisi mpo na ngai?+ Lokola amikitisi mpo na ngai, nakopesa mpasi yango na mikolo na ye te.+ Na mikolo ya mwana na ye nde nakopesa ndako na ye mpasi yango.”+
8 Ee yo moto ya mabele, ye ayebisi yo oyo ezali malamu.+ Mpe eloko nini Yehova azali kosɛnga yo, soki bobele komonisa bosembo,+ kolinga boboto+ mpe kotambola na bopɔlɔ+ elongo na Nzambe na yo?+