20 Bongo Menaheme abimisaki palata yango oyo afutisaki Yisraele, oyo afutisaki bilombe nyonso, mibali ya nguya,+ mpo na kopesa mokonzi ya Asiri shekele ntuku mitano (50) ya palata mpo na moto mokomoko. Bongo mokonzi ya Asiri azongaki, mpe atikalaki na mokili yango te.