Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 24:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Na mikolo na ye, Nebukadenezare+ mokonzi ya Babilone amataki, bongo Yehoyakime akómaki mosaleli na ye+ mbula misato. Kasi abalukelaki ye mpe atombokelaki ye.

  • Yirimia 27:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “‘“‘Mpe ekosalema mpenza boye: ekólo mpe bokonzi oyo ekosalela ye te, ɛɛ Nebukadenezare mokonzi ya Babilone; mpe ekólo oyo ekotya nkingo na yango na nse ya ekanganeli ya mokonzi ya Babilone te, nakotyela ekólo yango likebi na mopanga,+ na nzala+ mpe na maladi mabe,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘kino nakosilisa yango na lobɔkɔ na ye.’+

  • Yirimia 32:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Bongo talá oyo Yehova alobi: ‘Talá nazali kopesa engumba oyo na lobɔkɔ ya Bakaladea mpe na lobɔkɔ ya Nebukadrezare mokonzi ya Babilone, mpe ye akozwa yango.+

  • Yirimia 43:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe osengeli koloba na bango boye: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Talá nazali kotinda bákamata Nebukadrezare mokonzi ya Babilone,+ mosaleli na ngai,+ mpe nakotya kiti na ye ya bokonzi likoló ya mabanga oyo nabombi, mpe akotanda mpenza hema ya nkembo na ye likoló na yango.

  • Ezekiele 26:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ngai oyo nazali komemela Tire Nebukadrezare mokonzi ya Babilone, mokonzi ya bakonzi,+ uta na nɔrdi,+ ná bampunda+ mpe makalo ya bitumba+ mpe basoda oyo batambolaka na mpunda mpe lisangá,+ ɛɛ bato ebele mpenza.

  • Danyele 4:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 “Talá oyo Mokonzi Nebukadenezare alobi na bato ya bikólo nyonso, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ ya bato oyo bafandi na mabele mobimba:+ Bózala na kimya mingi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto