Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 9:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe ndako oyo ekokóma mabondo ya bitiká.+ Moto nyonso oyo akoleka pene na yango akotikala monɔkɔ polele+ mpe akobɛta piololo mpenza mpe akoloba: ‘Mpo na nini Yehova asali mokili oyo mpe ndako oyo boye?’+

  • 2 Ntango 36:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe abandaki kotumba ndako ya Nzambe ya solo+ mpe kobuka efelo+ ya Yerusaleme; mpe batumbaki na mɔtɔ bandako milai na yango nyonso ya kofanda, bakisa mpe biloko na yango nyonso ya kitoko,+ kino babebisaki eloko nyonso.+

  • Nzembo 74:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Kende na bisika ya libebi oyo ezali koumela ntango molai.+

      Monguna abebisi eloko nyonso na esika mosantu.+

  • Nzembo 79:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 79 Ee Nzambe, bikólo bakɔti na libula na yo;+

      Bakómisi tempelo na yo mosantu mbindo;+

      Bakómisi Yerusaleme libondo ya bitiká.+

  • Yisaya 64:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Ndako na biso ya bosantu mpe ya kitoko,+ epai bankɔkɔ na biso bazalaki kosanzola yo,+ ekómi eloko moko ya kozikisa na mɔtɔ;+ mpe eloko nyonso na biloko na biso ya kitoko+ ekómi libebi.

  • Yirimia 7:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 nakosala mpe ndako oyo ebengami na nkombo na ngai,+ oyo bozali kotyela motema,+ mpe esika oyo napesá bino ná bankɔkɔ na bino, kaka ndenge nasalaki Shilo.+

  • Bileli 1:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Monguna asemboli lobɔkɔ na ye epai ya biloko na ye nyonso ya kitoko.+

      Mpo amoni bikólo oyo ekɔti na esika na ye mosantu,+

      Oyo opesaki mitindo ete basengeli te kokɔta na lisangá na yo.

  • Bileli 2:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Yehova abwaki etumbelo na ye.+ Atyoli esika na ye mosantu.+

      Akabi bifelo ya bandako milai na ye ya kofanda na lobɔkɔ ya monguna.+

      Babimisi mongongo na bango na ndako ya Yehova, lokola na mokolo ya fɛti.+

  • Mika 3:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yango wana mpo na bino, Siona ekobalolama lokola elanga, mpe Yerusaleme ekokóma mabondo ya bitiká,+ mpe ngomba ya ndako ekozala lokola bisika oyo etombwaná ya zamba.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto