Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 22:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Nzela ya Nzambe ya solo ezali ya kokoka;+

      Liloba ya Yehova ezali pɛto.+

      Azali nguba ya baoyo nyonso bazali kokima epai na ye.+

  • 2 Ntango 32:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Bózala na mpiko mpe na makasi.+ Bóbanga te,+ bózala na nsɔmɔ mpe te+ mpo na mokonzi ya Asiri+ mpe mpo na ebele ya bato nyonso wana oyo bazali elongo na ye;+ mpo baoyo bazali na biso bazali ebele koleka baoyo bazali na ye.

  • Nzembo 27:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Ata kaa etɛlɛmiseli ngai hema,+

      Motema na ngai ekobanga te.+

      Ata etumba ebimeli ngai,+

      Ata bongo nakotya motema.+

  • Nzembo 46:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Yehova ya mampinga azali elongo na biso;+

      Nzambe ya Yakobo azali esika na biso ya kobombana oyo etombwaná.+ Sela.

  • Nzembo 55:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Akosikola mpenza mpe akotya molimo na ngai na kimya mosika na etumba oyo bazali kobunda na ngai,+

      Mpo bato ebele nde bayei kobunda na ngai.+

  • Baroma 8:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Bongo tokoloba nini na makambo yango? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akosala biso mabe?+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto