4 Nsima na yango, balobaki na Farao ete: “Toyei kofanda bapaya na mokili oyo,+ mpamba te matiti ya koleisa bibwɛlɛ ezali te mpo na etonga oyo basaleli na yo bazali na yango,+ mpo nzala ezali makasi na mokili ya Kanana.+ Mpe sikoyo, tobondeli yo, tiká basaleli na yo báfanda na mokili ya Goshene.”+