21Bongo nzala+ ekɔtaki na mikolo ya Davidi, elandanaki mbula na mbula, na boumeli ya mbula misato; mpe Davidi alukaki toli liboso ya Yehova. Bongo Yehova alobaki ete: “Ngambo ya makila ezali na motó ya Saulo mpe na ndako na ye, mpamba te abomaki Bagibeone.”+
17Mpe Eliya+ Motishebe, moko ya bato ya Gileade,+ alobaki na Ahaba ete: “Lokola Yehova Nzambe ya Yisraele oyo natɛlɛmi* liboso na ye+ azali solo na bomoi,+ na bambula oyo, mamwɛ to mbula ekozala te,+ longola kaka na etinda ya liloba na ngai!”+
28 Moko na bango nkombo na ye Agabusi+ atɛlɛmaki mpe abandaki kolakisa na nzela ya elimo ete nzala moko monene ekokwela mabele mobimba oyo bato bafandi;+ nzala oyo ekweaki na ntango ya Klode.