Nzembo 82:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Bósambisa na bosembo moto oyo azangá mpe mwana mobali oyo tata akufá.+Bókata na bosembo likambo ya moto ya mpasi mpe ya moto oyo akelelá.+ Masese 21:1 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 Motema ya mokonzi ezali lokola mikɛli ya mai na lobɔkɔ ya Yehova.+ Abalusaka yango esika nyonso asepeli kobalusa.+ Masese 29:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Na bosembo, mokonzi atɛlɛmisaka mboka,+ kasi moto oyo alingá kanyaka akweisaka yango.+ Masese 31:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 Fungolá monɔkɔ na yo, sambisá na boyengebene mpe sambá likambo ya moto ya mpasi mpe ya mobola.+
3 Bósambisa na bosembo moto oyo azangá mpe mwana mobali oyo tata akufá.+Bókata na bosembo likambo ya moto ya mpasi mpe ya moto oyo akelelá.+
21 Motema ya mokonzi ezali lokola mikɛli ya mai na lobɔkɔ ya Yehova.+ Abalusaka yango esika nyonso asepeli kobalusa.+