2 Bongo Yeroboame alobaki na mwasi na ye ete: “Nabondeli yo, tɛlɛmá, salá ete báyeba yo te,+ mpo báyeba te ete ozali mwasi ya Yeroboame, mpe osengeli kokende na Shilo. Talá! Kuna nde mosakoli Ahiya+ azali. Ye nde alobaki na ngai ete nakokóma mokonzi ya bato oyo.+