Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 18:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Bongo esalemaki boye: ntango Yezabele+ abomaki basakoli ya Yehova,+ Obadia azwaki basakoli nkama moko [100] mpe abombaki bango ntuku mitano ntuku mitano na kati ya mobenga moko, mpe azalaki kopesa bango limpa ná mai.)+

  • 1 Bakonzi 19:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Na yango, Yezabele atindelaki Eliya momemi-nsango moko, na maloba oyo: “Tiká banzambe básala bongo+ mpe bábakisa yango,+ soki lobi na ngonga oyo, nakokómisa te molimo na yo lokola molimo ya mokomoko na bango!”

  • 1 Bakonzi 21:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe esalemaki boye: ntango kaka Yezabele ayokaki ete babambi Nabote mabanga mpe akufi, na mbala moko, Yezabele alobaki na Ahaba boye: “Tɛlɛmá, zwá elanga ya vinyo ya Nabote Moyizireele,+ elanga oyo aboyaki kopesa yo osomba na mbongo; mpo Nabote azali lisusu na bomoi te, kasi akufi.”

  • 1 Bakonzi 21:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Ya solo, ata moto moko te akómá lokola Ahaba,+ oyo amitɛká mpo na kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova mpe oyo mwasi na ye Yezabele+ azalaki kotinda asala mabe.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto