24 Nsukansuka, Yehorame alalaki esika moko na bankɔkɔ na ye+ mpe akundamaki esika moko na bankɔkɔ na ye na Sité ya Davidi.+ Mpe Ahazia+ mwana na ye abandaki koyangela na esika na ye.
2 Ahazia azalaki na mbula ntuku mibale na mibale (22) ntango abandaki koyangela,+ mpe ayangelaki mbula moko na Yerusaleme. Mpe nkombo ya mama na ye Atalia+ mwana mwasi ya mwana ya Omiri.+