Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 10:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “Mpe sikoyo, Ee Yisraele, eloko nini Yehova Nzambe na yo azali kosɛnga yo+ soki ezali te kaka kobanga+ Yehova Nzambe na yo, elingi koloba, otambola na banzela na ye nyonso+ mpe olinga ye+ mpe osalela Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba;+

  • 1 Bakonzi 2:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 mpo Yehova akokisa liloba na ye oyo alobaki mpo na ngai+ ete: ‘Soki bana+ na yo bakebi na nzela na bango mpe batamboli+ liboso na ngai na solo+ na motema na bango mobimba+ mpe na molimo na bango mobimba, moto ya libota na yo akozanga te na kiti ya bokonzi ya Yisraele.’+

  • Nzembo 78:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Babatelaki kondimana ya Nzambe te,+

      Mpe baboyaki kotambola na mobeko na ye.+

  • Masese 4:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Koleka biloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo,+ mpo maziba ya bomoi eutaka na yango.+

  • Hosea 1:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe Yehova alobaki na ye boye: “Pesá ye nkombo Yizireele,+ mpamba te etikali moke nasɛnga ndako ya Yehu+ ezongisa monɔkɔ mpo na misala ya kosopa makila ya Yizireele, mpe nakosukisa bokonzi ya ndako ya Yisraele.+

  • Baebre 10:38
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 38 “Kasi moyengebene na ngai akozala na bomoi mpo na kondima,”+ mpe, “soki azongi nsima, molimo na ngai ekosepela na ye te.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto