Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 8:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Ahazia azalaki na mbula ntuku mibale na mibale (22) ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki mbula moko na Yerusaleme.+ Mpe nkombo ya mama na ye Atalia+ mwana ya mwana ya Omiri+ mokonzi ya Yisraele.

  • 2 Bakonzi 11:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpe bato nyonso ya mokili bakobaki kosepela;+ mpe engumba ekómaki na kimya; mpe babomaki Atalia na mopanga na ndako ya mokonzi.+

  • 2 Ntango 21:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe atambolaki na nzela ya bakonzi ya Yisraele,+ kaka ndenge bato ya ndako ya Ahaba basalaki; mpamba te mwana ya Ahaba akómaki mwasi na ye,+ mpe akobaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova.+

  • 2 Ntango 22:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Nzokande Atalia+ mama ya Ahazia amonaki ete mwana na ye asili kokufa. Bongo atɛlɛmaki mpe abomaki bana nyonso ya bokonzi ya ndako ya Yuda.+

  • 2 Ntango 24:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpamba te, Atalia mwasi mabe wana, bana na ye+ bakɔtaki na makasi na ndako ya Nzambe ya solo,+ mpe ata biloko mosantu+ nyonso ya ndako ya Yehova, bakabelaki yango Babaala.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto