51 Nsukansuka, mosala nyonso oyo Mokonzi Salomo asengelaki kosala mpo na ndako ya Yehova ekómaki na nsuka na yango;+ mpe Salomo abandaki kokɔtisa biloko oyo tata na ye Davidi asantisaki;+ atyaki palata, wolo ná biloko na bisika ya kobomba biloko ya motuya ya ndako ya Yehova.+