Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 31:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Mpo nayebi malamu ete nsima ya liwa na ngai bokozanga te kobebisa makambo,+ mpe bokopɛngwa mpenza na nzela oyo napesi bino mitindo; mpe likama+ ekozanga te kokwela bino na nsuka ya mikolo, mpo bokosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova mpo na kosilikisa ye na misala ya mabɔkɔ na bino.”+

  • Kolimbola Mibeko 32:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Ntango Yeshurune+ abandaki kokóma mafutamafuta, abɛtabɛtaki makolo.+

      Okómaki mafutamafuta, okómaki monene, otondaki mingi.+

      Bongo asundolaki Nzambe, oyo asalaki ye,+

      Mpe atyolaki Libanga+ ya lobiko na ye.

  • Yosua 23:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 mpamba te bobuki kondimana ya Yehova Nzambe na bino, oyo apesaki bino mitindo mpo na yango, mpe bokei kosalela banzambe mosusu mpe kogumbamela bango.+ Mpe nkanda ya Yehova ekopelela bino mpenza,+ mpe, nokinoki, bokokufa mpenza na mokili malamu oyo ye apesi bino.”+

  • Nehemia 9:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 “Nzokande, bazangaki botosi+ mpe batombokelaki yo+ mpe bazalaki ntango nyonso kobwaka mobeko na yo na nsima ya mokɔngɔ na bango,+ mpe babomaki basakoli na yo,+ oyo bazalaki kotatwela bango mpo na kozongisa bango epai na yo;+ mpe bazalaki kaka kosala makambo na limemya ata moke te.+

  • Nzembo 106:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Mpe basanganaki na bikólo+

      Mpe bayekolaki misala na bango.+

  • Amose 5:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Ee bino baoyo bozali kobalola bosembo ekóma mbondo,+ mpe bino bato oyo bobwaká boyengebene na mabele.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto